Amazon azali na mokano ya kobimisa service ya Amazon Autos na Royaume-Uni, oyo ebongisami mpo na koteka mituka na nzela ya internet. Engebene na mikano, kobanda na ebandeli ya mobu moye mozali koya, bavandi ya mboka bakozala na makoki ya kosomba mituka ya sika mpe ya kala na nzela ya plateforme oyo.
Na yango, service ya Amazon Autos ekokende libanda ya Etats-Unis mpo na mbala ya liboso. Na Royaume-Uni, projet yango ekosalema na boyokani na Hyundai. En plus, basombi bakozala na makoki ya kosala commande na nzela ya plateforme mituka oyo epesami na ba concessionnaires ya mituka 200 oyo ezali na ba régions ndenge na ndenge ya mboka.
Amazon ezali mpe na mokano ya kopalanganisa boyokani na bakompanyi mosusu oyo ezali na mosala ya koteka mituka na mikolo mizali koya. Likambo mosusu ya mosala yango ekozala likoki ya bakiliya ya koyeba motuya ya mituka na bango moko na zando.
Sikoyo, ezali na ba marques 35 ya mituka na plateforme Amazon Autos. Lancement ya service ya sika ekozala moko ya ba étapes importants ya entreprise pona ko augmenter ba activités internationales na marché ya commerce ya mituka.





